Publié par Laisser un commentaire

Soki yo te

 

Soki yo te Masiya

Nde ngai oyo

Mbele esi nakufa kala,

 

Soki yo te Masiya

Nde ngai oyo

Mbele esi nabeba kala…

 

Soki yo te

Mbele batia ngai

Na liste ya liwa

 

Balengela ngai

Po nakufa

Kasi ngolu ya nzambe

Eleki makasi penza,

 

Héritier du malheur

Par le sang aveuglé

Ngai ko innocent

Kasi mokonzi monene

Andimi kokufela ngai

 

Namitunaka

Orphelin  atanga ndenge nini

Ye ko tata te maman te

Asilisi kelasi

Kino azwi diplôme

 

Bambala mingi

Ngai moko namitunaka

Bisika ozwa ngai

Po nakoma

Oyo okomisi ngai lelo yaya

 

Témoignage na ngai na motema

Soki bato bayebi te

Ata banjelu na likolo

Batatola yo yaya

 

Nzambe ya seconde chance

Bisika bato bakangi bikuke,

Olobi na ngai

Okofungola

Po naleka lisusu yaya

 

Si je ne t’avais pas pour moi

Le Dieu de Jacob

 

Namituni

Nakokaki kokoma wapi

Na Kinshasa

To na ville nyonso ya lelo

 

Basala baplans

Balengela kutu

Jusqu’à la dernière minute

Kasi suka suka

Mokonzi na ngai

Akotindika bango

 

Soki yo te Masiya

Nde ngai oyo

Mbele esi nakufa kala

 

Nyonso ya ngai

Ekosanzola mokonzi

Oyo andima nyonso mpo na ngai,

Mon héros est digne de louange

Je sais pourquoi

Je l’adore à genou

Po bilembo ya motema

Baeffaçaka te

 

Babenga ngai akufa-lobi

Kasi bayei lobi

Bakuti ngai en bonne santé

Po babengaka yo  Jehovah Rapha

Balengeli ngai motambo

Dans le noir

Kasi babosani

Mon berger est aussi la lumière

Qui éclaire mon âme

En tout temps

 

Mokonzi na ngai

Ata na butu abatelaka

Santé, famille, entreprise

Pe biloko nyonso oyo eza ya ngai

 

Soki yo te (6)

Nyonso ya ngai

Ekosanzola mokonzi

Oyo andima liwa mpo na ngai,

Mon héros est digne de louange

Je sais pourquoi

Je l’adore à genou

Po bilembo ya motema

Baeffaçaka te

 

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *