Publié par Laisser un commentaire

Na bimi molongi

Na yaki na mawa na zongi n’esengo
Asali ya mingi iii
Nini yango ya malonga akuti kati na nga

Po akanisa nga aaa
Na lingi ye mingi na pesa ye nini
Na sili mayele eee
Fongola ata lola bangelu ba kita
To yemba po na yo oo
Ba longolaki nga na liste
Tango lipamboli eyaki
Ba lukaki bazua kiti na nga
Lola e reclamer kaka ngai eh
Offrandes na nga na ba sacrifices
Ako bosana ngo te oh
Na zalaki kaka n’elikya
Na yebaki ekosimba ah
Nabimi molongi elekeli mokili bakomi kutuna
Na sali ndenge nini
Moto lokola nga nawuta na nga na pasi
Nzambe ya lola akaniseli ngai
Nabimi molongi elekeli mokili bakomi kotuna oh
Naza ya libota nini
Moto lokola ngai famille na nga ya pauvre
Nzambe ya lola akaniseli ngai
Ya nzambe 2x
Naza ya nzambe
Victorieux 2x
Je suis victorieux
Ba lekaki nga na makasi
Ba lekaki nga na kitoko eh
Ba lekaki nga na ba relations
Ba lekaki nga na mbongo eh
Mokolo lola efunguamaki ngolu ekitelaki epa na ngai
Na zalaki kaka n’elikya
Na yebaki ekosimba ah

Nabimi molongi elekeli mokili ba komi kotuna oh
Naza ya libota nini
Moto lokola ngai famille na nga ya pauvre
Nzambe ya lola akaniseli ngai eh
Nabimi molongi elekeli mokili ba komi kotuna oh
Na lekeli nzela nini moto lokola nga nawuta na nga na pasi
Nzambe ya lola akaniseli ngai eh
Nabimi molongi elekeli mokili ba komi koloba oh
Ngai na simbi kisi moto lokola ngai na luka ye na ba ngomba eh
Nzambe ya lola akaniseli ngai eh
Nabimi molongi elekeli mokili ba komi koloba oh
Na kanga ye na kisi muasi lokola nga na mikaba na losambo
Nzambe ya lola a imposé kaka ngai eh
Nabimi molongi elekeli mokili ba komi koloba oh
Na yibi mbongo ya l’état moto lokola nga nawuta na nga na village
Nzambe ya lola a élèvé kaka ngai
Nabimi molongi elekeli nga moko kombo na ngai ekomami na lola
Moto lokola ngai na sala masumu ebele
N’ekulusu akufeli kaka ngai eh
Ya nzambe 2x
Naza ya nzambe
Na yaki na mawa na zongi n’esengo
Asali ya mingi iii
Nini yango ya malonga akuti kati na nga
Po akanisa nga aaa
Na lingi ye mingi na pesa ye nini
Na sili mayele eee
Fungola ata lola bangelu bakita
To yemba po na yo ooo
Na yaki na mawa na zongi n’esengo
Asali ya mingi iii
Nini yango ya malonga akuti kati na nga
Po akanisa nga aaa
Na lingi ye mingi na pesa ye nini
Na sili mayele eee
Fungola ata lola bangelu bakita
To yemba po na yo ooo

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *