Publié par Laisser un commentaire

Moponami

 

baponami tososola
nazali elembo ya bolingo ya Nzambe
nazali elembo ya bolingo ya Nzambe
alingaki nga aponaki nga eh
po nga na zala mwana na Nzambe
alingaki nga aponaki nga eh
po nga na zala ya nga na ya ye ehh
(pasi oyo esengelaki nga na mona tala masiya amemi yango
ebongo somo ewuta nga lisusu wapi)
na ponama na Nzambe na lingama na Nzambe na yebana na Nzambe
nga moponami
ata lelo motema na nga eko komona pasi
epayi ya Papa nga na zalaka heritier
ah nga na bela Il est toujour pres de moi
soki na leli Il vient me consoler
na maloba na ye oyo etonda bilaka
pona nga eh moponami na ye
alobaki na nga na banga eloko te
oyo aza kati na nga aleki na nguya
abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili

ba nguna na nga ata boye ebele
kaso boyebaka naza plus que vainceur
na maboko na ye je suis en securité
moko te akoki kosimba nga
po na sima na nga awa
ba gardes bazali oyo baleki ata ba gardes presidentielle
ba angelu na lola ils sont a mon service
pona kobatela bomoi na nga
ata bomemi kombo na nga eh na nzela ya molili ekosimba te
ata batieli nga mitambo nzela nzela po nga na kweya eza nul
et sans effect
po alobaki na nga eh na banga eloko te oyo aza kati na nga
aleki na nguya
abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili
ya azali elombo ya bolingo ya Nzambe
ya azali elembo ya bolingo ya Nzambe

na miso na Nzambe na za na motuya na ndako ya Papa nga
nazalaka vase d’honneur po na zalaka mwana na kati ya palais
royal pe libula na nga kala te ezo lata nzoto

siki pe masumu eh nga na kweya te po bimoyi na nga na kaba
na Nzambe
nga nq boyi na bebisa identité caché na nga ya mosali na
Nzambe moponami ya Papa
ah nga na boyi na bebisa ya nga lokumu eh ya mwana na Nzambe
prince heritier ya Papa
naza moto mokila te
nga na kodefisa na kodefa te
naza na mokili kasi ya mokili te
kala mingi ye shilo aza koya likolo ya mapata lokumu ya
boNzambe lobiko ya basantu yango ebelemi
ya tina nini nga na boya Nkolo ya nga
po bisengo ya mokili eza infemer
iyo lele (wa wa wa)
Nkolo na nga ah (wa wa wa)
na yebi okoya hee (wa wa wa)
mopanga na nga he (wa wa wa)
Nkolo na nga (wa wa wa)
motema na nga eh (wa wa wa)
bilingo ya motema na nga (wa wa wa)
ah Nzambe
alobaki na nga ah mwana kibanga te
oyo aza kati na yo aleki na nguya
abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili
ya azali elombo ya bilingo ya Nzambe
ya zali elembo ya bolingo ya Nzambe

babengami ebele baponami nde mukie
elembo ya ngolu ya Nzambe na boya ye
sur la terre de humains na kobanga eloko te po na simbami na
oyo aleki na nguya
Yaaaaweh
Yaaaaweh
Yaaaaweh
hmm Jesus
Nzambe sosolisa nga mokano na yo po na kende te pembeni ya
tina oponelaki nga eh
po nga nazali na nga mopaya pe moleki nzela na se ya moyi
etikali mokie Nkolo na nga ozanga
kuna epayi ozali sala nga pe na koma
awa ngai wa yo motema posa na yo
ayoo ah ah

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *