Publié par Laisser un commentaire

Ngwende

Fanda na ngwende na yo

Po na seko

Wumela mosantu

Bongo biso

Tosopa masanzoli

Na makolo oyo ya yo

Yo nzambe oyo owumelaka

Po na seko

 

Yaya ofandi na kiti ya bokonzi na yo

Yaya ofanda po ‘te opema te

Yaya ofandi po ‘te opema te

Kasi ofandi po ‘te okokisa nyonso

 

Après avoir tout est accompli sur la terre

Ozwi kombo koleka bakombo nyonso

Bapesi yo ngwende koleka bangwende nyonso

Ofanda na ngwende etongama na maboko ya moto te

Menuiser ya ngwende na yo nde nani ?

Nabotama

Nakuta yo nzambe na se na moyi

Nakoleka

Okotikala nzambe na se na moyi

Abraham aleka

Kasi oza nzambe na se na moyi

Lelo naza na esengo ya konetola ngwende na yo

 

Yaya he  ho

Yaya he

Yaya ofandi na kiti ya bokonzi na yo

He yaya he

He yaya he

He yaya he

He yaya he

 

Ngwende na yo babundisaka yango te

Ngwende na yo  etatabanaka te

Ngwende ebanga rébellion te

Ngwende na yo eninganaka te

 

Te savoir sur le trône

Me rassure seigneur

Surtout  nayebi ofanda

Kaka po oyamba masanzoli na ngai te

Kasi ofanda pe po okata makambu na ngai

Nkolo mingi mingi nayebi

Ozalaka na camp ya basantu

Yango soki mokili ekozala na besoin ya avis na ngai

Je suggère que le trône soit occupé par Jésus,

Par jésus he

Jésus hooo

Yaya

 

Yaya ofandi na kiti ya bokonzi na yo

he yaya he

he yaya he

he yaya he

he yaya he

 

Mokonzi soki afandi na ngwende

Akozela masanzoli  emata

Ewuta na ye

Mokonzi na ngai abongi,

Abongi na lokumu

Lelo nasanzola ye

Fanda na yo bongo

Nafukama papa

Na kita na makolo na yo

Kino nasopa malasi

Ata na pinzoli, pinzoli ya misu na ngai ya mawa te

Ya lolango na yo yaya he

Yaya ofandi na kiti ya bokonzi na yo

he yaya he

he yaya he

he yaya he

he yaya he

 

Yaya he yaya ho yaya ngai

Nazala leki

Yo nde ozala yaya na ngai

Tozala libota moko

Bisika oza mokonzi

Ngai pe nazala mokonzi

Lokola yo

Makambo ngai nakoka te

Yo nde okoka kaka  ho yaya

Bisika molayi na ngai esuki

Omatisa ngai na mapeka

 

Makambo nakoma te

Loboko na yo eza molayi

Ekoma  na bisika na ngai

ho yaya he yaya

Naza leki ya mokonzi

Naza leki ya mokonzi

Yesu aza yaya na ngai

 

Eza malamu kozala na yaya

Oyo afandi na ngwende

Likolo na nyonso

Oyo nyonso bana na bato bayebi

Kombo na Yesu emati likolo

Pe eyingeli

Kozala na ndeko  aza haut placé

Lokola le lion eza malamu

Yo oza yaya

Ngai leki na yo

Yo ofandi na ngwende

Ngai mosantu nadondwa

Elongo na yo

Yamba lokumu ya seko na seko

Ewuti na mitema ya baye basosoli  ete

Oza mokonzi ya bakonzi

Wumela mosantu !

Wumela !

 

 

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

 

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *