Publié par Laisser un commentaire

Losambo

« 

Losambo na ngai

Nkolo yanola eh
Kolela na ngai

Yawhé oyoka eh
Naza kosenga loboko na yo,

Zala na ngai
Balimites na ngai ekweya
Makambo ebongwana,
Ebongwana eh!

Nalonga, Yahwe eh

Nalonga eh
Nalonga, Yahwe eh

Nalonga eh
Nalonga, sala nalonga eh

Eleki ngai mayele,
Esali ngai kobanga
Ngai nakende ko wapi?
Nazongi na liziba
Esika nazwaka makasi
Esika nazongaka ya sika
Kanga ekuke ya satana
Na bomoyi na ngai
Etelema, telema

Nalonga eh, Yahwe eh, nalonga eh
Nalonga eh, Yahwe eh, nalonga eh
Nalonga eh, sala nalonga eh.

Esila boye te, boye te, boye te
Balonga ngai te, ngai te, ngai te
Nakweya na se, na se te, na se te
Nasuka boye té, boye te, boye te

Naza kosenga ngai loboko na yo,

Zala na ngai
Balimites na ngai, ekweya
Makambo Ebongwana
Ebongwana
Nalonga,

Nzambe na Lola, nalonga

Paroles

Nalingi otia liloba

Oyo ezocorrespondre na situation na yo

Soki ozobela

Osimbi place ozobela

Ozoyemba :

Nabika, Nzambe ya miracle,

Nabika eh.
Sala ngai nabika,

Nzambe na lola, nabika

Soki problème na yo

Eza kobota

Ozoyemba:

Nabota

Nzambe na Anna,

Nabota
Sala ngai nabota,

Nzambe na lola, nabota

Soki problème na yo eza ya libala yemba:

Nabala eh,

Nzambe ya bikamwa,

nabala eh.
Sala nga na bala, Nzamb’a Moïse, nabala.

Soki bitumba elekeli yo yemba:

Na longa, Nzambe na Mbiye, na longa é
Sala nga na longa, Nzambe na Alliance, na longa.

Mosali na Nzambe, tango ekoki osenga miracle na yo
Bato ba ndimela yo te, ba comprendre Nzambe a bengaki yo
Yemba elongo na ngai.
Bikamwa eh, Nzambe na lola, bikamwa.
Salaka bikamwa eh, Nzamb’a Moïse, bikamwa eh.
Salaka bikamwa eh, Nzambe na Mbiye, bikamwa, Yaya
Salaka bikamwa eh, Nzamb’a Moïse, bikamwa eh, bikamwa é,
Yaya

Paroles
Lelo, likambo moko esengeli ebongwana na vie na yo
Yemba Nzembo oyo na kondima nioso
Nzembo oyo nakoma ngo elongo na yo
Tia liloba oyo ezo correspondre na problème na yo

Naza kosenga nga, loboko na yo na eklezia

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *