Publié par Laisser un commentaire

Mosantu

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

 

Bolingo bisika ezwa ngai

Motema na ngai moko témoins

Osala nyonso po ngai nakoma mosantu

Lokola yo ozali

Otala mabunga na ngai te

Olatisi ngai  elamba  ya bosantu

Lokola yo

Po ngai nabengama pe mosantu

Lolenge moko na yo

Yango nayemba mosantu

 

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

 

Osala nyonso

Po ngai nakoma mosantu

Lokola yo

Ozali papa

Otangela ngai mabunga te

Ojugea ngai selon grâce na yo

Papa na ngai

Opesi ngai loboko

Naya bisika bosantu  oyo yo ozali

Nasangana na loyembo

Oyo eyembi baanjelu

 

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

 

Bolingo na yo eleki makasi

Yango nafungoli ya ngai motema

Nayamba loyembo yango

Ngai pe nayemba loyembo moko

Na rythme ya baanjelu

Refrain oyo esilaka te

Ya seko na seko

Ngai pe naganga mosantu

 

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

 

Mokolo oyo ayaki na mosuni

Abotami na mwasi awa

Baanjelu bayaki

Basangani elongo na batu

Babateli-mpate bapesi bango esengo

Oyo ewuta  na likolo

Refrain ya loyembo oyo tokoyemba

Kino seko

Mosantu mosantu

Ndenge mokonzi na biso azali

Toganga mosantu

 

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

Mosantu mosantu mosantu

Yamba lokumu ya bayengebene bapesi na yo

Mosantu

Ozana na nkolo

Mosali na nyonso

Baanjelu na bato basangani

Bayemba

Mosantu abongwani te

Papa mosantu  abongwani te

Yaya kwelelele milolo ebeta

Likolo pe na se

baanjelu bakoyemba mosantu

Papa biso pe na se mosantu

Papa nkembo lokumu

Yaya he

Bampaka bayembi epayi na yo

Nkembo lokumu yaya

Mpate na nzambe ondima ngai

Po oza mosantu

Na nyonso cash

Okokisa nyonso

Po motema ya papa esepela na biso

Biso batu ya masumu

Tokomi mosantu  po na yo

Likolo bayemba

Mabele batatola

Ozali mosantu

Baanjelu bakoyemba mosantu

Papa

Bampaka bakoyemba mosantu

Papa

Bakeli bayemba mosantu

Papa

Ozwa nkembo lokumu masanzoli

Oyamba yango nkembo lokumu masanzoli

Oyamba

Topesa na yo

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

 

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *