Publié par Un commentaire

Yesu sala

 

Na beleli yo, kita nkolo o simba ngai
po moto o simbi eh, vraiment a batelami
nguya na yo, ezali nguya ya solo
molimo na yo, aza molimo na nguyaaaaaa,
molimo na nguya
Na beleli yo, kita nkolo o simba ngai
po moto o simbi eh, vraiment a batelami
nguya na yo, ezali nguya ya solo
molimo na yo, aza molimo na nguyaaaaaa,
molimo na nguya
yesu sala
sala motema na ngai ekomi ko banga
yesu sala
sala bomoyi na ngai ekomi na suka
yesu sala eh
tala banguna na ngai bakomi ko tshola ngai eh
yesu sala
sala motema na ngai ekomi ko lenga
yesu sala
sala bomoyi na ngai ekomi na suka
yaya sala eh
tala banguna na ngai bakomi ko tshola ngai eh
na lilita ya lazalo, elombe mobali o telemi
o sekuosi lazalo, otunaki ata posa na ye te
na nguya ya lisekua po yesu yo moko lisekua,
yo moko lisekua
na lilita ya lazalo, elombe mobali o telemi
o sekuosi lazalo, otunaki ata posa na ye te
na nguya ya lisekua po yesu yo moko lisekua,
yo moko lisekua
YHWH, zala nguba na ngai
bomba ngai eh, YHWH batela ngai
po ngai muana na yo na pengua te
na masenginia ya mokili oyo
na masumu eh, na se na moyi
na sengi o lona ngai, pembeni ya mayi ya bomoyi

po na banga eloko te, po na lenga pe te.
sala motema e lenda na pasi na esengo na talela se yo
molimo ya kolela kozanga,
bisenga senga lokola ba pagano ngai na boyi eh.
mokili to yaka papa etonda waleoh
soki yo te nani mosusu
ah, baninga bazuaka bomengo ngai wa yo délaissé.
ah yaya, yaya yaya eh, yaya sembola loboko
ah papa na beleli yo
nkolo na bondeli yo
papa yo ozali wapi
yo motema na ngai
tala banguna na ngai
bango basali nde feti
tala ba ndoki ya quartier
lelo basali makita
balobi ngai na suki eh
ah ngai nakomi ko banga
papa nakomi ko lenga
nkolo yoka kolela na ngai
baninga to kola na bango, babonga ba koma na mbongo
yaya eh yaya, yo elonga na nga oh
salaaaaaa, salaaaaaaa
nkolo na bondeli yo
papa nakomi na suka
elikya epayi na yo
ba finga ba tonga ngai
ah ngai na taleli yo yo moto obengaki ngai
wuta libumu ya mama na ngai
yaya eeeeh yaya
yaya eh yaya
yaya makasi na ngai oh
yaya eh yaya
yo nde elonga na ngai oh
yaya eh yaya
yo bikamua na ngai
molimo na ngai sepela, oza na nzambe ya solo

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

Publié par Laisser un commentaire

Yamba nga

 

Na ye y’opetola bomoyi na ngai na makila na yo
Sala bomoyi na nga lokola ya yo
Nalingi nazala ndakisa pona ba mingi
Elaka na yo ya bosantu elata ngai
Papa na zali se mwana
Soki otiki ngai nakobunga
Vraiment nazali kosenga
Lisungi na yo
Papa nazali se mwana
Soki otiki ngai nakobeba
Surtout nazali kosenga
Ngolu na yo

Yahwe, yahwe eee

Sala bomoyi na nga lokola ya yo
Nalingi nazala ndakisa pona ba mingi
Elaka na yo ya bosantu elata ngai
Papa na zali se mwana
Soki otiki ngai nakobunga
Vraiment nazali kosenga
Lisungi na yo
Papa nazali se mwana
Soki otiki ngai nakobeba
Surtout nazali kosenga
Ngolu na yo

Ngai oyo moto ya masumu
Namikitisi epayi na yo
Nakweyi na makolo na yo
Lokola Zakayo na Sykomor eh Yahwe
Kota ovanda na motema
Olia, omela na nga elongo
Wana nde na zui assurance
Oza ya nga
Yaka kota na motema
Papa ofanda na nga elongo

Wana libondeli ya motema
Etikala

Yahwe, yahwe eee

Sala bomoyi na nga lokola ya yo
Nalingi nazala ndakisa pona ba mingi
Elaka na yo ya bosantu elata ngai
Papa na zali se mwana
Soki otiki ngai nakobunga
Vraiment nazali kosenga
Lisungi na yo
Papa nazali se mwana
Soki otiki ngai nakobeba
Surtout nazali kosenga
Ngolu na yo

Nasosoli mabe na ngai
Nakangi motema te
Nazongi epayi na yo
Oyamba nga Papa
Zua nga ata lokola
Mosali na yo Nkolo
Po ete nga na zala
Na ndako na yo

Papa: Yamba nga
Ô Papa eeh: Yamba nga
Eh Nkolo Yesu: Yamba nga
Motema na nga: Yolele yamba nga
Papa nayebi mosusu te: Yamba nga
Nazalaka bobele se na yo: Yamba nga
Ekimelo na ngai: Yamba nga
Yo motema na nga: Yolele yamba nga
Papa ngai na ye: Yamba nga
Zua nga na maboko na yo: Yamba nga
Nayoka mongongo na yo eh: Yamba nga
Bongo bolembu esila ngai: Yolele yamba nga

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

Publié par Laisser un commentaire

Moponami

 

baponami tososola
nazali elembo ya bolingo ya Nzambe
nazali elembo ya bolingo ya Nzambe
alingaki nga aponaki nga eh
po nga na zala mwana na Nzambe
alingaki nga aponaki nga eh
po nga na zala ya nga na ya ye ehh
(pasi oyo esengelaki nga na mona tala masiya amemi yango
ebongo somo ewuta nga lisusu wapi)
na ponama na Nzambe na lingama na Nzambe na yebana na Nzambe
nga moponami
ata lelo motema na nga eko komona pasi
epayi ya Papa nga na zalaka heritier
ah nga na bela Il est toujour pres de moi
soki na leli Il vient me consoler
na maloba na ye oyo etonda bilaka
pona nga eh moponami na ye
alobaki na nga na banga eloko te
oyo aza kati na nga aleki na nguya
abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili

ba nguna na nga ata boye ebele
kaso boyebaka naza plus que vainceur
na maboko na ye je suis en securité
moko te akoki kosimba nga
po na sima na nga awa
ba gardes bazali oyo baleki ata ba gardes presidentielle
ba angelu na lola ils sont a mon service
pona kobatela bomoi na nga
ata bomemi kombo na nga eh na nzela ya molili ekosimba te
ata batieli nga mitambo nzela nzela po nga na kweya eza nul
et sans effect
po alobaki na nga eh na banga eloko te oyo aza kati na nga
aleki na nguya
abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili
ya azali elombo ya bolingo ya Nzambe
ya azali elembo ya bolingo ya Nzambe

na miso na Nzambe na za na motuya na ndako ya Papa nga
nazalaka vase d’honneur po na zalaka mwana na kati ya palais
royal pe libula na nga kala te ezo lata nzoto

siki pe masumu eh nga na kweya te po bimoyi na nga na kaba
na Nzambe
nga nq boyi na bebisa identité caché na nga ya mosali na
Nzambe moponami ya Papa
ah nga na boyi na bebisa ya nga lokumu eh ya mwana na Nzambe
prince heritier ya Papa
naza moto mokila te
nga na kodefisa na kodefa te
naza na mokili kasi ya mokili te
kala mingi ye shilo aza koya likolo ya mapata lokumu ya
boNzambe lobiko ya basantu yango ebelemi
ya tina nini nga na boya Nkolo ya nga
po bisengo ya mokili eza infemer
iyo lele (wa wa wa)
Nkolo na nga ah (wa wa wa)
na yebi okoya hee (wa wa wa)
mopanga na nga he (wa wa wa)
Nkolo na nga (wa wa wa)
motema na nga eh (wa wa wa)
bilingo ya motema na nga (wa wa wa)
ah Nzambe
alobaki na nga ah mwana kibanga te
oyo aza kati na yo aleki na nguya
abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili
ya azali elombo ya bilingo ya Nzambe
ya zali elembo ya bolingo ya Nzambe

babengami ebele baponami nde mukie
elembo ya ngolu ya Nzambe na boya ye
sur la terre de humains na kobanga eloko te po na simbami na
oyo aleki na nguya
Yaaaaweh
Yaaaaweh
Yaaaaweh
hmm Jesus
Nzambe sosolisa nga mokano na yo po na kende te pembeni ya
tina oponelaki nga eh
po nga nazali na nga mopaya pe moleki nzela na se ya moyi
etikali mokie Nkolo na nga ozanga
kuna epayi ozali sala nga pe na koma
awa ngai wa yo motema posa na yo
ayoo ah ah

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

Publié par Laisser un commentaire

Kita yaweh

 

Salela nga Yésu na nga, Ngolu na yo
Mituna etondi nga motema ebele, wapi biyano
Salela nga Yésu na ngai ngolu na yo
Mituna etondi nga motema, wapi biyano
Yo laka nga nkembo, shekina na yooo
Etikalisa maloba
Na misala nazo mona te Yésu na ngayi
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Mokonzi
Na zali na posa na yooo
CH: Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé
Na lingi na mona yo
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé
Na lingi na mona yo
Avenir ekomi kosala somo, ezo bangisa
Nayebi te nga wa yo yaya na ngayi, na suka wapi
oooh
Ya Yesu moteme mpasi
Nzoto neti e lâché
Malgré bongo, je suis toujours confiant
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Mokonzi
Tozali na posa na yooo
Kita Yahwé (Yahwé)
Kita Nkolo (Nkolooo)
Kita Yahwé (Ah papa)
Na lingi na mona yo
(Ah bana baleli pe mingi oooh)
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé
(Yanola posa motema ya bana na yo)
Na lingi na mona Yo
CH: Papa ozali ndé Nzambé
Nzambe na Abrama, Nzambe na Izaka ô
Yaya komo lelo Nzambe na ngayi eee
Kita Yahwé, (Papa)
Kita Nkolo,
Kita Yahwé
(Yoka mongongo na nga, yanola nga lelo, Yésu…)
Na lingi na mona yo
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé
(Yaka, Yaka, Yaka, Yaka)
Kokangela nga motema te mosantu nazo lela
Kozingela nga maboko té na kosenga na nga
Soki motema moto eleli mongongo eyokani té,
oyokaka
Kutu na libumu ya mbisi molili makasi na sé ya mayi
Oyokaki losambo ya Jonas Yésu
Boni oyoka ya ngai té
Bapasi, kozanga na nga
Ozo mona to ozo mona té
Eh papa kolela na nga
Ozo yeba to ozo yeba té
Yesu ebongo losambo na nga
Ozo yoka to ozo yoka té
Nga wa yo na niokuami mingi
Ozo mona to ozo mona té
Yésu, Pardon bobola famille
Ozo yeba to ozo yeba té
Ba soucis na ngai, kolela na nga
Ozo yoka to ozo yoka té
Eh Mokonzi na nga telema na Yo

(Yahwé telema)
Pene ya banguna ekueya na mayi
(Nkolo Yahwé telema)
Yesu Mokonzi na nga telema na Yo
(Yahwé telema)
Silisa mpasi na nga, na mona pe esengo
(Nkolo Yahwé telema)
Bapasi, Kozanga na nga
Ozo mona to ozo mona té
Ô Yésu kolela na nga eee
Ozo yeba to ozo yeba té
Ebandaki nga kobondela Yaya
Ozo yoka to ozo yoka té
Na ngomba ba jeûnes, ba retraites, losambo tango,
pokwa
Ozo mona to ozo mona té
Ayi Mokonzi kolela na nga
Ozo yeba to ozo yeba té
Ah Yesu loyembo ya Shékinah
Ozo yoka to ozo yoka té
Ya Yésu Mokonzi na nga telema na yo Yésu
(Yahwé telema)
Maladies elembisi nzoto telema Yaya
(Nkolo, Yahwé telema)
Yesu tango ekoki tolingi to mona yo
(Yahwé telema)
Telema tobika bikamua na mboka ya Congo
(Nkolo, Yahwé telema)
CH: Telema molili ekomi pene neti ya nsimba bomoyi
na nga
Telema, telema y’okata likambo na nga
Yésu motema na nga eza na posa na yo
Bomba nga tango nionso na sé ya mapapu na yo
Silisa pema banguna po bayeba, nga naza na
Nzambé
Eh Yahwé telema, na yo
(Yahwé telema)
Telema, telema Mokonzi
(Nkolo Yahwé telema)
Yésu belema, belema yaya eee
(Yahwé telema)
Yésu belema, belema Mokonzi
(Nkolo Yahwé Telema)
Mokonzi telema ba nguna ba yoka soni eee
(Yahwé telema)
Bendele na nga ya elonga Yésu na nga
(Nkolo Yahwé telema)
Soki Mokonzi atelemi nani aloba
(Yahwé telema) (Nkolo Yahwé telema)
Bendele na nga ya elonga Yésu na nga eeh
(Yahwé telema)
Soki Mokonzi atelemi nani aloba
(Nkolo Yahwé telema) (Yahwé telema)
Mokonzi telema ba nguna ba yoka soni eee
(Nkolo Yahwé telema)
Bendele na nga ya elonga Yésu na nga eeh
(Yahwé telema)
Soki Mokonzi atelemi nani aloba
(Nkolo Yahwé telema) (Yahwé telema)

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

Publié par Laisser un commentaire

Hosana

 

Comme une biche près d’un torrent d’eau
Seigneur je viens dans ta sainte présence
Me rassasier de ta splendeur.
Lead: Roi de mon Salut
La source d’eau qui ne tari jamais.
Réponse: Hosanna à l’Agneau
Toi qui vit dans nos cœurs
Et nous donne la joie d’être tes élus
Réponse: Hosanna à l’Agneau
Gloire, honneur et majesté
Oh! Mon Roi
Hosanna à l’Agneau
Oh! Oui chantons gloire
Gloire, honneur et majesté
Oh! Mon Roi
Hosanna à l’Agneau

Paroles: Oh! Roi vit éternellement
Toi qui affermis nos cœurs
Quand la terreur des hommes veut nous plonger dans la peur
Nul n’est semblable à toi tu es Dieu.
Lead: Kolo na nyonso
likolo’esimbami na yo Nzambe
Réponse: Hosanna na Yahwe
Yoka loyemb’amotema
Libonnza mbeka topesi na yo
Hosanna na Yahwe
Yemba Kembo oh!
Kembo, lokumu na mwana na mpate.
Kembo lokumu’epayi na mwana mpate
Hosanna na Yawhe
Mokonzi na nga zua lokumu
Kembo, pe lokumu na yahwe
Einh Nkolo y’oh!
Ozali Nkolo Nzambe na nga, (Nzambe na nga)

Nzambe na nga y’oh!
Nzambe monene
Nzambe monene.
Mokolo moko te Yesu to sanganaka to voté yo Nzambe na nga.
Ozali Nzambe na mokano na Yo.
O pesa miso mbongo te Papa po yo ozala Nzambe
Ozali Nzambe oh oh Obongi na Bonzambe.
Ata kopasi ya Congo yo elongoli mo Nzambe na yo te
Chœur: Ozali Nzambe, na mokano na Yo
Eh! Na yebi Bonzambe na Yo ekobongola pasi na nga eh

Ozali Nzambe, na mokano na Yo

Paroles: Oh! Yesu baye ba tuta na Yo tembe ba suka
Oh! Nzambe monene, se Yo Yesu oh! oh!
Lead: Oh! Yemba Nzambe monene Papa,
Nzambe monene, (Nzambe na Nga) Nzambe monene
Mokonzi ya bomoyi na nga Nkolo oh
Nzambe na ngai eh Mosusu azali te
Na yembeli Yo loyembo ya motema
Nzambe monene, (Yesu) Nzambe monene
Nzambe na ngaieh Mosusu azali te

Ata bayembi ba bo koyembela Yo
Nzambe monene,
Elongoli Bonzambe na Yo te,
Nzambe monene
Mokonzi na nga eh,
Nzambe na ngaieh Mosusu azali te
Otikali nza, be
Yesu na Nga Kumama na Yo oh! Oh! Oh!
Nzambe monene, Nzambe monene
Nzambe na ngaieh Mosusu azali te

Yo Nzambe ya mboka na nga Congo eh! Nkolo Olobi nini Papa.

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

 

Publié par Laisser un commentaire

Dans ta présence

 

Comment rendrais-je à l’ Éternel tous
ses bienfaits pour moi
Comment rendrais-je à mon Dieu tous
ses bienfaits pour moi
il me donne son ombrage comme ami
il me donne sa parole ma lampe
il me donne son Esprit saint pour guide
Oh Jésus tu es bon pour moi
et je cherche ce que je peux te donner

en récompense de tes hauts et bienfaits
dans ce monde plein de plaisir
Jésus je n’ai point trouvé

je viens te louer, je viens t’adorer
dans ton lieu saint je m approche
dispose toi a recevoir, la louange de mon coeur
le fruit de mes lèvres, j’apporte dans ta présence
Voici ce que je te dois

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics