Publié par Laisser un commentaire

Trop c’est trop

 

Trop c’est trop, trop c’est trop
Toleli mpe mingi (papa y’olembi)
Trop c’est trop, trop c’est trop
Kozanga na kolela esa ya biso te bana Nzambe
A la croix tout est accompli

Toleli mpe mingi
Sembola loboko na yo
Ba christo toniokwami mingi
Tokomi na suka papa eh
To prier to jeûner mpe mingi
Ekomi tango ya témoignage

Oyo nazo mona eh
Ekeseni na ba ndonto na ngai
Oyo nazo lota eh
Yango nazo bika te oh

Mowumbu likolo ya mpunda
Mwana Nzambe na makolo
Bapagano bazododwa
Nga mochristo nazo lela
Tango nazo luka mwana
Ndumba aboti abwaki mwana
Mochristo azangi bileyi
Mopagano ali abwaki lisusu na fulu
Ba poste ya minene
Ekoma condition okota na loge

Oyo nazo mona Yango te olakaki na nga
Oyo nazo bika ekeseni na maloba na yo

Ah ba ndoki boloki mpe mingi
Trop c’est trop ekoki
liboso tobwakaki bombe
sikoyo tosimbi chicotte
Misala ya bana na Nzambe
Bo zwi bovandeli yango
Ba commerces bazo sala
Capital ezokola te
Ba etudiant baza kotanga
Misala ezali wapi?
Ba fonctionnaire bazo sala
Salaire bazo simba te
Policier na soldat ya mboka
sunga bango ya yesu
Ba oyo ba zwa mabala
mabota ezali wapi
Basusu mvula na mvula
maladie ezosila te oh
Papa bitumba na mboka na nga
Na Est ezosila te oh
Ba Nguna ya mboka Congo
Balobi bakotika te
Dignité ya mama ya Congo
Ekoma nango bafoué
Ba viol, koboma koyiba
Ozomona tozomona te oh

Oyo tozomona ekomama wapi Yesu na nga
Oyo tozo vivre ezali te na maloba na yo

Eza yo moto olobaki

Les ténèbres ne règneront pas toujours
Ces Égyptiens vous les verrez plus jamais

Bana na yo toza sekolela
Ya mbala oyo ekoki (c’est trop)
papa kota likambo ango (c’est trop)
na yoki kanda emati (c’est trop)
Ah eh kanda molimo (c’est trop)
papa esi tolembi (c’est trop)
Nkolo loba liloba suka (Trop c’est trop)

mvula na mvula tokufela kaka na famille (Trop c’est trop)
na soigna diabete bongo papa lelo ekomi olanda nga (Trop

c’est trop)
Na biso mabala na famille kaka yaka tofanda (Trop c’est
trop)
Seigneur je t’en pris encore une fois prend moi le fouet
(Trop c’est trop)
fouette moi tous les sorciers qui envoute ma famille (Trop
c’est trop)
chicotte moi tous les sorciers qui envoute mon pays (Trop
c’est trop)
qu’il soit occultiste, magicien, tous les tchiors et les
tchiorcettes (Trop c’est trop)

Fire!

Nazo sala mingi salaire eza mediocre
wuta nakota libala mabota eza wapi oh
papa mvula na mvula naza se kolenga

Ah ya mbala oyo C’est fini (c’est trop)
Papa kota likambo oyo (c’est trop)
na yoki kanda emati (c’est trop)
kanda molimo (c’est trop)
vraiment moi j’en ai marre (c’est trop)
papa loba likambo ya suka (trop c’est trop)

Nga pona lia papa il faut que je tende la main (Trop c’est
trop)
soki bilaka nayo eza pona nga te loba na yeba (Trop c’est
trop)
40 ans yango encore et toujours na ndako a ba parent (Trop
c’est trop)
Papa ba ye kota nga elongo babonga na la vie (Trop c’est
trop)
est ce que bolamu nayo eza kaka pona ba susu (Trop c’est
trop)
yango chicotte moi tous ces sorciers qui envoute nos
églises (Trop c’est trop)
qu’il soit bishop, réverends surtout prophetes (Trop c’est
trop)

Chicotte!

Ata bapasi eleki
Motutu elati nga Nzoto
Bitumba ya butu mpe moyi
Nga na ko banga te
Mpo na yebi na bomoyi na nga
Yokosala eh
Yesu nakangi motema na yebi yokosala (okosala)
Ba ngomba, ba jeûnes, ba retraites ya pamba te (okosala)
Ata liboso a bitumba je garde mon silence (okosala)

Alleluia!

Ata esi tolembi
Bilelo ngambo na ngambo
Elikia epayi na ye
Elongo ye akosaka te
Vraiment pona mboka Congo (Akosala)
Ata butu ewumeli suka suka tongo (Ekotana)
Juste un peu de patience ayebi likambo na yo (Akosala)
Mbula oyo bilaka na ye pona bomoyi na yo (Ekosimba)
Pona ba etudiants ya Congo na ba ndeko ya diaspora (Akosala)
Basi bakufela mibali na bana bitike (Akosala)
Pona ba mama ya Ngambela na ba ye ya zando (Akosala)
Nabosani te ba oyo ya Kikolo na ba ye Chikwanza (Akosala)

Alleluia!

kolela na yo epekisa obetela yesu mololo te
mololo, Alleluia!

Ata bapasi eleki
Botutu elati nga Nzoto
Bitumba ya butu mpe moyi
Nalenga te
Mpo na yebi na bomoyi na nga
Akosala eh

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

 

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *