Publié par Laisser un commentaire

Tout est grâce

Tout est grâce (6)

Na oyo nyonso

Nzambe asalela

Bato na mokili

Jamais moto oyo awuta na Adam

Amerita eloko.

 

Valeur ya oyo

Nzambe asala

Esombamaka te na mbongo

Tout est grâce

Afungolela biso ekuke

Kimya na kembo

Tout est grace

 

Ata eloko ya ofele

Esengaka critère,

Soki ozwi invitation ya mokonzi

Olata elamba ya feti

 

Eza ngolu

Bolingo ya Nzambe

Po na bana ya bato

Eza ngolu

Makambo Yesu asala po na biso

Eza ngolu

Kokoma mwana na Nzambe

Eza ngolu

 

Oyo Yesu asala na ekulusu

Afuta nyonso oyo esengeli

Po tokoma bana ya Nzambe

Na kondima te

Kokota na bomoyi ya mosantu

Ezala en plus sans effort

 

Oyo Nzambe alakisa po na biso

Eza ya ofele

Biso nyonso basantu toyemba

Toganga

Ya ofele

 

Bolingo oyo

Eza ya ofele

Bolamu na Nzambe

Eza ya ofele

Mawa na Nzambe

Eza ya ofele

Bolamu na Yesu

Eza ya ofele

Esengi makasi te

Ya ofele

Mawa na Nzambe

Eza ya ofele

Kokoma mosantu

Eza ya ofele

Kokota na saint de saint

Bolingo oyo

Eza ya ofele

Bolingo Nzambe

Eza ya ofele

 

Tout est grâce

Jamais moto oyo awuta na Adam

Amerita eloko

Valeur ya oyo

Nzambe asala

Esombamaka te na mbongo

 

Tout est grâce

Afungolela biso elikya

kimya na kembo

 

Tout est grâce

Ata eloko ya ofele

Esengaka critère,

Soki ozwi invitation ya mokonzi

Olata elamba ya feti

 

Eza ngolu

 

Bolingo ya Nzambe

Po na bana ya bato

Eza ngolu

Makambo Yesu

Asala na ekulusu

 

Pema tozwi ya ofele

Toyebi kutu mopesi te

Kobatelama pe ya ofele

Tomoni kutu mobateli te

 

Kasi bolingo na ye po na biso

Ewuti na mozindo ya motema

Asala nyonso

Asengi eloko te

Oyo tokoki kopesa en retour

 

Bolingo ya ofele

Mawa na Nzambe

Eza ya ofele

Kobatelama

Eza ya ofele

Esengi makasi ya bomoto te

 

Ya ofele

Asengi yango facture te

Ya ofele

Ce n’est ni par l’effort

Ni par la force humaine

Eza na ngolu ya Nzambe

Ya ofele

En plus eza na yango gratuit

Ya ofele

 

Mawa na Nzambe

Eza ya ofele

Ngolu na Nzambe na mitema

Ya ofele

Kobatelama

Guérison ya nzoto

Ya ofele

Abikisa yo na nzoto

Eza na yango ya ofele

Apesa yo kimya

Eza na yango ya ofele

Ya ofele

Apesa yo mapamboli

Eza na yango ya ofele

Esengi makasi te

Ya ofele

 

Ngolu ngolu

Bolingo yango

Eza ya ofele

Mawa na  Nzambe

Eza ya ofele

Boya

Liziba ya ngolu efungwami

Ya ofele

Bolingo na Nzambe

Eza ya ofele

Asopi ngolu liboso ya bandimi

 

Nyonso esengi makasi te

Ya ofele  boya

Liziba ya ngolu efungwami

Ya ofele

Bolingo na Nzambe eza

Tiela ye elikya

Esi asala nyonso

Po apesa yo bomoyi

Ya ofele

 

Kobatelama

Eza ya ofele

Bolingo na Nzambe

Eza ya ofele

 

 

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

  

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *