Publié par Laisser un commentaire

Po na bolamu

 

Nakoki te kobomba

Nakoki te kovanda kimya

Nakoki te nazanga maloba

Nakoki te nakanga monoko

Bolamu ya nzambe eleki bomoyi na ngai

Nakoki te kobomba

 

Yaweh po na bolamu oyo osali

Po na bolamu oyo osali

Nakoki te navanda kimya

Nakoki te nakanga monoko

Bolamu ya nzambe elekeli ngai mosantu

Nakoki te nazanga maloba

Akanisaka ngai ata nakanisi ye te

Yesu na ngai

Naza na talo yaya

Po na bolingo oyo namoni

Po na bolamu oyo osali

Basujet nyonso

Eza na yango valable

Soki olingi osanzola nzambe

Basusu basanzola ye po na lipa

Basusu banetola ye po na mbongo

Sujet nyonso eza na yango na tina

Condition que ozala mosantu yaya

Po na bolamu oyo osali

Nzambe

Monene lokola yo papa

Na mokili oyo namoni te

Nakanisi nyonso osaleli ngai

Nazongi pene na yo

Nakumisa yo

Balobi na ngai nabinaka lokola liboma

Mais nayebi sujet ya mabina na ngai

Eza bolamu oyo osali  (2)

Bakamwe ngai

Balobi nabanda wapi

Bamituni eza po na nini

Bayebi te témoignage ya motema

Makambu eleki ngai meke

Nalingi ata moto mususu ayeba te

Motema na ngai eza témoin,

Témoin ya bolamu oyo osali

Ewuti ngai na mozindo ya motema

Ebimi ngai kino na monoko

Nalingi naganga

Kasi nakoki te

Motema na ngai esi etondi

Etondi na bolamu na nzambe

Na libota to pe na santé na ngai

 

Nayemba bolamu oyo osali

bolamu oyo osali

Natomboli maboko na ngai likolo

Molimo na ngai esi emati

Pinzoli na miso eza kotanga

Namituni  po na nini nazwi rétroviseur

Natali kala  bolamu nyonso nzambe asala

Nayembi  bolamu oyo osali

Quand je me souviens

Je me mets à chanter,

À chanter comme un fou, Jésus !

 

Eloko mosusu te na bomoyi na ngai

Eza na motuya lokola makambo

Oyo masiya asalela ngai,

Oyo elekela ngai mabanzo

Yango napesa wolo to pe palata

Soki asengi po na bolamu oyo namoni

Po na bolamu oyo namoni

Yaweh, Yaweh

Olongi motema na ngai (5)

 

Olongi molimo ya moyengebene

Yaweh, Yaweh  olongi motema na ngai

Nakomi kotika kozala ngai

Nakomi kokoma lokola yo

Yaweh, Yaweh  olongi motema na ngai

Moto ya kanda kanda

Azwa douceur ya molimo

Yaweh, Yaweh  olongi motema na ngai

Nayemba loyembo eyemba Jacob na ngomba Israel

Yaweh, Yaweh  olongi motema na ngai

Makambu yango elekeli ngai

Kasi nalobi : sala ndenge olingi

Yaweh, Yaweh  olongi motema na ngai

Likambu yango elelisi ngai

Kasi nalobi sala ndenge olingi

Yaweh, Yaweh  olongi motema na ngai

Olongi motema ya mosantu na yo

Yaweh, Yaweh  olongi motema na ngai

Olongi motema na kati ya motema

Yaweh, Yaweh  olongi motema na ngai

Olongi, olongi motema

 

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

 

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *