Publié par Laisser un commentaire

Kita yaweh

 

Salela nga Yésu na nga, Ngolu na yo
Mituna etondi nga motema ebele, wapi biyano
Salela nga Yésu na ngai ngolu na yo
Mituna etondi nga motema, wapi biyano
Yo laka nga nkembo, shekina na yooo
Etikalisa maloba
Na misala nazo mona te Yésu na ngayi
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Mokonzi
Na zali na posa na yooo
CH: Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé
Na lingi na mona yo
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé
Na lingi na mona yo
Avenir ekomi kosala somo, ezo bangisa
Nayebi te nga wa yo yaya na ngayi, na suka wapi
oooh
Ya Yesu moteme mpasi
Nzoto neti e lâché
Malgré bongo, je suis toujours confiant
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Mokonzi
Tozali na posa na yooo
Kita Yahwé (Yahwé)
Kita Nkolo (Nkolooo)
Kita Yahwé (Ah papa)
Na lingi na mona yo
(Ah bana baleli pe mingi oooh)
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé
(Yanola posa motema ya bana na yo)
Na lingi na mona Yo
CH: Papa ozali ndé Nzambé
Nzambe na Abrama, Nzambe na Izaka ô
Yaya komo lelo Nzambe na ngayi eee
Kita Yahwé, (Papa)
Kita Nkolo,
Kita Yahwé
(Yoka mongongo na nga, yanola nga lelo, Yésu…)
Na lingi na mona yo
Kita Yahwé, kita Nkolo, kita Yahwé
(Yaka, Yaka, Yaka, Yaka)
Kokangela nga motema te mosantu nazo lela
Kozingela nga maboko té na kosenga na nga
Soki motema moto eleli mongongo eyokani té,
oyokaka
Kutu na libumu ya mbisi molili makasi na sé ya mayi
Oyokaki losambo ya Jonas Yésu
Boni oyoka ya ngai té
Bapasi, kozanga na nga
Ozo mona to ozo mona té
Eh papa kolela na nga
Ozo yeba to ozo yeba té
Yesu ebongo losambo na nga
Ozo yoka to ozo yoka té
Nga wa yo na niokuami mingi
Ozo mona to ozo mona té
Yésu, Pardon bobola famille
Ozo yeba to ozo yeba té
Ba soucis na ngai, kolela na nga
Ozo yoka to ozo yoka té
Eh Mokonzi na nga telema na Yo

(Yahwé telema)
Pene ya banguna ekueya na mayi
(Nkolo Yahwé telema)
Yesu Mokonzi na nga telema na Yo
(Yahwé telema)
Silisa mpasi na nga, na mona pe esengo
(Nkolo Yahwé telema)
Bapasi, Kozanga na nga
Ozo mona to ozo mona té
Ô Yésu kolela na nga eee
Ozo yeba to ozo yeba té
Ebandaki nga kobondela Yaya
Ozo yoka to ozo yoka té
Na ngomba ba jeûnes, ba retraites, losambo tango,
pokwa
Ozo mona to ozo mona té
Ayi Mokonzi kolela na nga
Ozo yeba to ozo yeba té
Ah Yesu loyembo ya Shékinah
Ozo yoka to ozo yoka té
Ya Yésu Mokonzi na nga telema na yo Yésu
(Yahwé telema)
Maladies elembisi nzoto telema Yaya
(Nkolo, Yahwé telema)
Yesu tango ekoki tolingi to mona yo
(Yahwé telema)
Telema tobika bikamua na mboka ya Congo
(Nkolo, Yahwé telema)
CH: Telema molili ekomi pene neti ya nsimba bomoyi
na nga
Telema, telema y’okata likambo na nga
Yésu motema na nga eza na posa na yo
Bomba nga tango nionso na sé ya mapapu na yo
Silisa pema banguna po bayeba, nga naza na
Nzambé
Eh Yahwé telema, na yo
(Yahwé telema)
Telema, telema Mokonzi
(Nkolo Yahwé telema)
Yésu belema, belema yaya eee
(Yahwé telema)
Yésu belema, belema Mokonzi
(Nkolo Yahwé Telema)
Mokonzi telema ba nguna ba yoka soni eee
(Yahwé telema)
Bendele na nga ya elonga Yésu na nga
(Nkolo Yahwé telema)
Soki Mokonzi atelemi nani aloba
(Yahwé telema) (Nkolo Yahwé telema)
Bendele na nga ya elonga Yésu na nga eeh
(Yahwé telema)
Soki Mokonzi atelemi nani aloba
(Nkolo Yahwé telema) (Yahwé telema)
Mokonzi telema ba nguna ba yoka soni eee
(Nkolo Yahwé telema)
Bendele na nga ya elonga Yésu na nga eeh
(Yahwé telema)
Soki Mokonzi atelemi nani aloba
(Nkolo Yahwé telema) (Yahwé telema)

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *