Publié par Laisser un commentaire

Elikya ya sika

 

Moto nioso awa nase aza na tina yako bikela oyo esalaka makasi ya moto eza pe bisika yako likya yesu elikya na nga ya sika y onde tina yako zala na nga

Na tiaka yanga motema na bato basala ba kombo awa ana se sima makambo échanger avenir na nga pe ekoti mobulu na luki bisika na tia lokolo nzoka solution eza na bato te

Na langwe bolingo ya quelque temps na yoki ba gtm na ndenge nioso sima ya mwamikolo deception au rendez-vous na longoli  elikya na bato ba lapaka ndayi ba salela mosapi elikya na nga ya sika yesu he

Na ndima maloba ya munganga aloba ata na poto bokono esila te minganga ba yekoli nzoto kasi mukolo nzoto mopesi na pema elikya na munganga  te yepe azuaka pema epayi na nkolo na likya lisusu na nzambe yende lisungi esilaka te lisungi ya baye pasi ebungisa bango elikya yako mona ko kokisama ya bilaka na nzambe awa ose  elikya na nga ya sika

Ngai na likya lisusu ata misu ya bo moto eza ko mona te

Ngai na likya lisusu ata ko kokisama bilaka ewumeli yesu elikya na nga ya sika  *2

Olingaka te nga na lela obongisa nioso ya malamu pona nga okota nga motema osilisa bilembo nioso ya pasi otia nzembo ya sika

 

Refrain na ngo kombo ya yesu *4

Eleka na nzambe ekatisa bikeke nkino elata nzoto

Maloba nayo elengi esala bokeseni na ba susu, kombo nayo ekoma sujet ya loyembo ya tango nioso yaya

Molimo akiti motema etondi na sayi

Molimo akiti elikya etondi motema

Tango asimbaka nga, na yokaka posa se moko, yako yembela yesu oyo

Yako yembela mosantu ya lola

nako yembela yesu oyo

obongoli pinzoli nako seka yango ngai

nako yembela yesu oyo

ngai na meli te kasi na langwe na posa yako yemba

yako yembela yesu oyo

yako binela mosantu ya lola

yako binela yesu oyo

na devellopé makasi na nga na ko binela yo

yako binela yesu oyo

han yako sanzola mosantu ya lola

yako sanzola yesu oyo

elikya emati lisusu na lingi na sanzola

sanzola *3

yako sanzola yesu oyo

han nako yembela mosantu ya lola

yako yembela yesu oyo

ata na moni te na misu ya bo moto nazo yemba

yako yembela yesu oyo

elikya emati lisusu na lingi na yemba

yako yembela yesu oyo

yemba*3

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *