Publié par Laisser un commentaire

Mon histoire

Naye liboso na yo
Kosopa nde motema na nga
Naloba nionso osaleli ngai eh
Oyo osalela nga eleki minene
Naye na yo Yesu eh
Kosopa nde motema oyo ya nga
Ngai, nazui pe lisolo ya kobeta
Ya kobetela baninga na ngai
Naloba nionso osaleli ngai
Oyo osalela nga eleki minene
Yahwe, nga moto bazalaki kobenga nga Salomon
Opikola ngai na salon okotisa nga na chambre
Olandi nga na chambre, okuti nga na etoko
Ozui nga na etoko, omatisi ngai na mbetu
Olandi ngai na mbeti, opesi nga pongi
Osuki wana te olandi ngai ti na pongi
Ba cauchemars, ba attaques ya butu, tu as gagné
Ba ndoto na nga ekoma nde ba Rhema
Yahwe, ozua nga mosika na ngolu na yo
Olatisi nga chemise kaka na ngolu
Olongela nga etumba kaka na ngolu
Ata lola nakokota na ngolu eh

Bolingo na yo Yesu na ngai eh
Etindi nga nayemba loyembo
Nagumba mabolongo ya motema na nga
Nabuaka motole ya bimbebo na nga
Nafungoli robinet ya masanjoli
Pe bongo nasopa maloba mpaka malasi
Naloba nionso osaleli ngai eh
Olongisa nga mowumbu na Satana
Oyo ezalaki mosika ekomi pembeni
Oyelisi pete nionso ezalaki makasi
Okamuisa ngai ndenge omesana kokamuisa
Nabala, nasala efforts te
Yesu, naboti, nasali efforts te
Nakoma mwana na Nzambe na makasi ya nzoto te

Okomisa nga mosali, nasala efforts te
Nionso wana Yesu Nzambe na ngai
Bolingo na yo pona ngai
Mawa na yo pona ngai

Eh Yahwe
Oza bolingo
Eh Yahwe
Oza malamu
Eh Yahwe
Namoni na miso bilaka na yo
Bolingo na yo pona ngai
Mawa na yo pona ngai
Nionso ya yo, ekomi ya ngai
Elonga na yo, ekomi ya ngai
Esengo na yo, ekomi ya ngai
Kimia ozali, ekomi ya ngai
Bokonzi na yo, ekomi ya ngai
Kembo na yo, ekomi ya ngai

Yaaaahweeee bolingo na yo nde kombo na yo
Bolamu na yo pona nga
Yesu, okanisi osali yango na nko Nzambe ya bomoyi
Yahwe, Yahweeee
Miso, bilaka na yo
Nakomi molongi
Yesu, kimia na motema osopi
Namitungisa te oh
Papa olongola maladie
Obengana souçis
Osilisa kolela
Na kati na Yesu olatisa nga kembo
Ekomi ya ngaeeeeeee
Yahwe
Yahwe
Yahwe na ngai

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics

0 Partages
Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *