Publié par Laisser un commentaire

Sunga

Yahwe, Nzambe na ngai
Y’otindaki nga na mokili
Po ete ngai nabika
Na bolamu nionso Yahwe

Kasi banda nga naya na mokili
Pinzoli ekawukaka te
Kolela butu pe na moyi

Wuta nga naya awa na se
Miniokoli ekosila te
Pinzoli ekoma bileyi
Ya tango nionso Nkolo na nga

Kanisa na elanga ya Edeni
Ebandeli ezalaki boye te
Nazalaki ekelamu ya nkembo
Pona lokumu ya Nzambe Tata

Nkolo, ata ko lisumu eyaki
Kokabola ngai na yo
Kasi mbeka ya Nkolo Yesu
Ezalaki po ete ngai nabikisama

Papa, lisumu yango ya ndenge nini
Oyo okoki kolimbisa te
Yango nazongi epayi na yo
Yoka nga mawa Nzambe na nga

Yahwe

Sunga, sunga, sunga mowumbu na yo
Soki osungi ngai te, nani mosusu Nkolo na nga?

Nabondeli yo

Sunga, sunga, sunga mowumbu na yo
Soki osungi ngai te, nani mosusu Nkolo na nga?

 

Corriger les paroles

Proposer une correction pour ce lyrics